current location : Lyricf.com
/
Songs
/
Bruce lyrics
Bruce lyrics
turnover time:2024-05-19 23:10:10
Bruce lyrics

(Bruce, Bruce, Bruce)

Eza compétition té oyo tozoluka moko a gagner

Eza love ya chouchou na chouchou na yé

Bruce na Chuck Norris té

(Bruce, Bruce, Bruce)

Eza pé combat ya boxe té oyo tozoluka moko a ceder

Eza love ya cheri na cherie na yé

Ali na Foreman té

Ali boma yé

Ali boma yé

Ali boma yé

Yo'botoli nga mino mais opesi nga mokuwa

Na fiba okomi lisusu kobotola nga yango

Eh eh pourquoi Adolphe Muteba

Boni yo ozo sala lokola olingaki nga po o prouver bato

Osilisi nga lolendo nionso ya ki bomuasi na nga

Avenue coin ti coin naleka bazo zomela ngai

Okomisa nga papier, kimpwaka kutu bien

Lukela nga esika nabatama soni omemisi ngai

Soki na mayi nabetelaka ba mbisi lisolo

ya bolingo na biso avant ba lala

Mpo na zamba lion akondima té

Noki té lisolo na nga elelisa yé

Ba niama bakobanga yé lisusu té

Na mboloko akobanda koboudé yé

Yé roi mobimba atangisi pinzoli

Bayebi té lion azolela po lionne akoki 'osala yé pé bongo

Oh Adolphe Muteba tshilamwina

Lukela esika nga nakobombama soni oyo

Na likolo ba ndeke bakoloba na yé ko espionner bango

Na mabelé makelele bakoyebisa ba nkusu bazui chida

nzoka naza vivante

Babombaki nga pona kokima soni ya mokili

Après babosani tranche epayi bakundaki

Ngai yango ngai nakeyi na nga

African James Bond, DJ Droba on est ensemble

Ata kutu virus, balukela yango antivirus

Moto asala bolingo nzambé mais apesa biso mode d'emploi té

Yango tozelaki yesu aya 'bala po biso to mona

Lolengé ya ko vivre na bolingo

Yé pé nkolo yesu abalaki na yé té

Yango tokoma ko tatonner eh,

Yango tokoma ko débrouiller eh,

Ezui ezui, ezui té ezui té

Mungwa ata ebungi e noyer na bileyi

Etikaka b'indices, ba traces na lolémo

Mais yo banda yo olimwa ata indice té na nzoto

Na miso disparu, wa wa wa

Sans le savoir que ezali liwa na nga (X2)

Liwa ya moto...

Adolphe awa okomi oluka okima nga

Mbeto ekokomela nga munene lokola stade ya football

Santé na nga ekokoma muke lokola ballon

Butu ekokomela nga molayi pé somo trop

Yo moto o réduisaka souffrance ya vie na nga oza wapi yango

Adolphe mutebe tshilamwina

Nalingaka yo, oyebi yango bien

Nabengaka yo chouchou ya motema

Pourquoi ozosala nga boyé Adolphe

Napesa yo bolingo nabakisa matabisi ya vie na nga

Sango ata aza boboto mais soki apesi communion

longola makanisi ya kosenga matabisi

Na beleli, beleli, beleli, beleli, beleli na bayé bakufa kala

Bayé bakufa na b'accidents

Bayé bakufa na malaria

Bayé bakufa na masasi

Bayé bamiboma po na mbongo

Basengela biso epayi ya yahweh

Po bango bavandaka pene na yé

Ameka ko réduire douleur ya bayé bakufaka na pasi ya bolingo

Po aloba bolingo eza yé

Nzambe azali bolingo, nzambe azali bolingo

Ata kutu virus, balukela yango antivirus

Moto asala bolingo nzambé mais apesa biso mode d'emploi té

Yango tozelaki yesu aya bala po biso to mona

Lolengé ya ko vivre na bolingo,

Yé pé nkolo yesu abalaki na yé té

Yango tokoma ko tatonner eh,

Yango tokoma ko débrouiller

Eh,ezui ezui,ezui té ezui té

Adolphe pourquoi ozosala boyé muteba

Mungwa ata ebungi e noyer na bileyi

Etikaka b'indices, ba traces na lolémo

Mais yo banda olimwa ata indice té na nzoto

Na miso disparu,wa wa wa

Sans le savoir que ezali liwa na nga(x2)

Comments
Welcome to Lyricf comments! Please keep conversations courteous and on-topic. To fosterproductive and respectful conversations, you may see comments from our Community Managers.
Sign up to post
Sort by
Show More Comments
Fally Ipupa
  • country:Congo (Republica Democratica)
  • Languages:Lingala, French, English
  • Genre:Folk
  • Official site:http://www.fallyipupaworld.com/
  • Wiki:https://fr.wikipedia.org/wiki/Fally_Ipupa
Fally Ipupa
Latest update
Copyright 2023-2024 - www.lyricf.com All Rights Reserved